|
||
| |
||
| Boyei bolamu
epayi na Serge na Philo |
||
| Tina ya
"Musiques pour Christ" |
kino mokolo
ya lelo na ngolu na Nzambe. Mpo na kobanda mosala oyo, tosangisaki makabo oyo Nzambe apesa biso: likabo ya mongongo epayi na Philo, likabo ya kobongisa mindule mpe tekiniki |
epayi na Serge.
Yango wana na nionso oyo tokosala na misala na biso, topesaka liboso lokume epayi na Nzambe, mpo ete ezali bambuma ya makabo na Ye mei kati na biso; totanga yango na kelasi te. |
| |
||
| Na
mbula 1994, Kaset na biso ya liboso ebimaki. Nkombo na yango Louanges en Sol Majeur ( Banzembo ya kokumisa Nkolo). Ezali sangana ya banzembo ya kokumisa Nkolo oyo bato mingi basepelaka na yango na Congo- Kinshasa na tango wana. Na kaset yango, tolandisi banzembo yango non-stop koleka miniti tuku mibale. Tina na yango ezali ete tolingi kosunga bana na Nzambe na mindule |
oyo na tango nionso balingi koyembela too kobinela Nzambe. Ezali mpe na nzembo mosusu ya malembe: "L'Afrique sera sauvée" (Afrika ekobikisama). Maloba na yango ezali tobenga bana y'Afrika basangana mpe babondelaka mpo na lobiko ya mboka na biso. Likabo ya mongongo ya Philo eyokani polele penza na nzembo oyo, mpo ezali bobele piano moko ezali kobeta mpe Philo az'oyemba. Bokoki mpe koyoka bandambo ya kaset oyo Louanges en Sol Majeur. |
|
| |
||
| Na mbula 1997, CD na biso ya liboso ebimaki. Nkombo na yango "Nzambe na Nguya!". Ezali na banzembo zomi na mibale. Banzembo yango bakeseni na lolenge ya mindule mpe na maloba mpe na munoko oyo bayembami. Makanisi na biso awa ezali ete bato nionso bakoka kozua nzembo too banzembo oyo bakosepela na yango. Yango wana banzembo mosusu eza ya pop, mosusu reggae, mosusu zouk, mosusu soukous, mosusu rumba. | Banzembo
mingi bayembami na lingala, kasi bamosusu na falanse, mosusu mpe na swahili. Banzembo mosusu ya kokumisa, mosusu ya kobondela, mosusu ya kolendisa... Nionso oyo mpo ete tolingi mindule yango emema sango malamu kati na bamboka mingi, ata na poto. Yango wana na kati na buku ya CD 'ango, tobaloli maloba nionso na falanse, na angele mpe na aleman. Bokoki koyaka bandambu ya CD"Nzambe na Nguya!" . |
|
| |
||
| Na mbula
2002, vidéo
ya Nzambe na Nguya! ebimi. Toyebi bozalaki
kozela yango banda kala. Ezali na banzembo libwa. Banzembo mwambe ewuti
na CD "Nzambe na Nguya!", moko ezali nzembo ya sika na makambo
mingi. Maloba na yango ezali ya mbotama ne Yesu, mindule ezali mingi kaka
bambunda na lolenge ya mboka, mandanda te. Ba clip mingi ezali kolakisa
makambo toyembi. Ndakisa "Sanzola Yaweh", tolakisi mingi . |
![]() |
bilili ya mapata mpe minzoto ya mosika mosika kuna likolo, mpo ezali bisika wana nde nguya mpe monene na Nzambe ekamwisaka mokili mobimba. Ndakisa mosusu, "Nzambe na Nguya!" ebandi na bilili oyo bato oyo bakenda ya solo na sanza mbala liboso, bango moko bakangaki bilili wana. Video yango, tosali yango na motema moko mpe tokanisi bino mpe bokosepela na yango. Bokoki kotala bandambu ya vidéo "Nzambe na Nguya!". |
| Tokosepela
mingi soki bokokomela
biso makanisi na bino mpo na oyo botangi awa. |
||
| Kobanda le 12 Oct 2002, bato
|
||